OSILI KOKUTA BOMOI NA KOTUNDA NA MOLIMO?

[Read "The Wonderful  Discovery" in Your Language ]

[Read the Four Spiritual Laws in Your Language ]

OYEBI MOKOLO NYOSO EKOKI KOZALA MOKOLO NA KOLONGA NA NGUYA NA MOLIMO MOSANTO?

AWA EZALI MAKAMBO MISATO KOSALISA YO KOYEBA YANGO:

  1. Liboso ozuaki Yesu Kristo lokola Mobikisi na yo, ozalaki kokonza bomoi na yo mpenza (Yisaya 53:6)

  2. Ntango ozuaki Yesu Kristo, Molimo Mosanto akumaki kofanda kati na yo (Baroma 8:9)

  3. Molimo Mosanto akokisi Bakristo nyoso kozala na bomoi na kotunda na esengo. Bomoi oyo ezali bomoi na kotunda mpe kokoka nyoso  (2 Bakorinto 3:18).

Tomona nini…

BIBLIA ELAKISI BISO NA NTINA NA MOLIMO MOSANTO
Biblia elobi:

  1. Molimo Mosanto azali Nzambe (Misala 5:3-5).

  2. Molimo Mosanto azali kati na batu nyoso oyo bazuaki Yesu Kristo lokola Mobikisi (1Bakorinto 3:16).

  3. Molimo Mosanto azali molakisi na biso (Yoane 14:26).

  4. Molimo Mosanto asungi biso kati na petepete na biso (Baroma 8:26).

  5. Molimo Mosanto azali na nguya mingi koleka milimo nyoso mosusu (1 Yoane 4:1-4).

  6. Molimo Mosanto aboti mbuma na Molimo kati na bomoi na biso (Bagalatia 5:22,23)

  7. Molimo Mosanto apesi biso nguya kotatola mpo na Kristo (Misala 1:8).

Biblia elobi na biso na ntina na ndenge misato na batu, oyo na liboso…

1 MOTU OYO AZALI MOKRISTO TE:

Motu oyo azali Mokristo te azuaki Yesu Kristo naino te lokola Mobikisi. Molimo Mosanto azali te kati na motu oyo azali Mokristo te.  
Biblia elobi:

“Kasi motu oyo azi na Molimo te, azi kukamata kula na Molimo na Nzambe te, zambi kula yango azi kula bombafu na misu na ye; ye akuki kuiba bo te, zambi paka Molimo azi kumenisa bango.” 1 Bakorinto 2:14

Tala solo mpo na komona…

Elilingi oyo emonisi motu oyo azali Mokristo te azali motu na ndenge nini:

MOTU OYO AZALI
MOKRISTO TE

Kiti na mokonzi, esika na kokonza bomoi na motu
Ngai, motu na kokonza ngai mpenza
Yesu Kristo

Okoki komona noki:
1. Yesu Kristo azali na libanda na bomoi na ye.
2. Motu oyo azali Mokristo te afandi likolo na kiti na kokonza bomoi na ye mpenza.
3. Ekoki motu oyo azui Yesu Kristo lokola Mobikisi na ye.
Ndenge na mibale na batu ezali…

2 MOKRISTO NA KOTUNDA NA MOLIMO

Ntango tozui Yesu Kristo lokola Mobikisi na biso, Molimo Mosanto ayei kofanda kati na biso
(Baroma 8:9). Ntango totundi na Molimo Mosanto tolingisi Yesu Kristo kokonza bomoi na biso. Molimo Mosanto aboti mbuma na Molimo mpe apesi biso nguya kozala mpo na Nzambe mpe kotatola mpo na Ye (Misala 1:8).
Biblia elobi:

"Kasi mbuma na Molimo azali kulinga, kusika, motima bi, kukumba mawa molai, motima peti, kusalisa batu, kundima, motima na mwana, kulika nzoto…” (Bagalatia 5:22,23). “Kasi bino azua makasi sika Molimo Bipuru akuma na likolo na bino, nasima bino asamba kula na Ngai…” (Misala 1:8)
Ntango tondimi Yesu Kristo kokonza bomoi na biso, tokosepelisa Nzamba.    Okomona ete…

Elilingi oyo emonisi ndenge nini Mokristo azali:
MOKRISTO NA KOTUNDA NA MOLIMO

Mokristo oyo…
* azali na Kristo likolo na kiti na kokonza
* azali na nguya na Molimo Mosanto
* akumisi basusu epai na Kristo
* abondeli mpe azui biyano na mabondeli
* ayoki Maloba na Nzambe
* andimi Nzambe
* atosi Nzambe

Bomoi na ye ekomonisa
* bolingo
* esengo
* kimia
* motema molai
* boboto
* bosembo
* motema pete

Okoki komona:
1. Yesu Kristo azali kati na bomoi na ye lokola Mobikisi na ye.
2. Yesu Kristo azali likolo na kiti na kokonza, mpe akonzi bomoi na ye.
3. Sikawa motu mpenza azali moombo na kotosa Yesu Kristo.
4. Lokola Mokristo ayekoli kolingisa Molimo Mosanto kokamba ye, bomoi na ye ekomonisa mbuma na 
5. Molimo na koleka, mpe akokola kozala Mokristo makasi

Kasi, soko Mokristo atundi na Molimo te, ye azali lokola na ndenge misato na batu…

3 MOKRISTO NA KOKANISA YE MOKO

Mokristo na kokanisa ye moko (kolanda makambo na mokili) alingi kosepelisa ye mpenza koleka kosepelisa Nzambe. Motu na ndenge yango azali lokola mwana moke oyo alingi kosala lokola ye alingi —lokola motu na mokili oyo.

Biblia elobi boye na ntina na Mokristo na kokanisa ye moke:

“Nasima bandeko, ngai akukaki kumenisa bino te pilamoko batu na Molimo, kasi pilamoko batu na nzoto, pilamoko bamwana muke sopo na Kristo. Ngai apisaki bino miliki, nyama te, zambi bino akukaki kulia nyama kwanza te, te, mobeli lelo bino akuki te, zambi bino azi kwanza batu na nzoto. Zambi sika kanda na kangu azi katikati na bino, bino azi batu na nzoto te, kutambula pilamoko batu?”
1 Bakorinto 3:1-3

Sikawa tala na miso makasi…

Elilingi oyo emonisi bomoi na Mokristo, na kokanisa ye moko ezali ndenge nini:
MOKRISTO NA KOKANISA YE MOKO

Mokristo oyo…
* andimi Nzambe nyoso te
* mbala mingi afundi
* asungi basusu te kokuma epai na Kristo
* abondeli mingi te
* azali na mposa te mpo na koyekola Biblia
* mbala mingi azali na makanisi mabe

Mbala mosusu…
* azali na jua
* ayebi asalaki mabe
* amitumoli
* abomi mpiko
* asambisi basusu
* ayoki nkanda

Okoki komona:
1. Yesu Kristo azali naino kati na bomoi na ye lokola Mobikisi.
2. Sikawa motu mpenza azali likolo na kiti na kokonza bomoi na ye.
3. Yesu Kristo azali kokonza ye nye te

Mokristo na kokanisa ye moko alingi kosepelisa Nzambe mbala mosusu, kasi… mbala mingi alingi kosala malamu, kasi akoki te.

“…Kula oyo ngai asali, ngai aibi te; zambi kula oyo ngai alingi asali, oyo ngai asali te; kasi kula oyo ngai ayini, mobeli oyo ngai asali. Zambi ngai aibi sopo na ngai, mobeli na nzoto na ngai kula malamu azi kutikala moko te, zambi nzala na kusala malamu azi na ngai, kasi makasi na kusala malamu azi te. O! Ngai azi motu na mawa mingi! Motu nini akuki kubikisa ngai na nzoto na kukufa oyo?”  
Baroma 7:15,18,24

Zambi na yango…
Mokristo na kokanisa ye moko azali na bomoi na esengo te. Mbala mingi makambo na bomoi eleki ye.
Mbala mosusu ye asali te lokola na Mokristo. Mpo na kobanzisa biso na makambo oyo tosili kotanga, tomona lisusu…

NDENGE MISATO NA BATU

1. Mokristo te

2. Mokristo na Kotunda na Molimo

3. Mokristo na Kokanisa Ye Moko

Ozali motu na ndenge nini? Olingi kozala motu na ndenge nini?

NDENGE NINI MOKRISTO NA KOKANISA YE MOKO AKOKI KOZALA MOKRISTO NA KOTUNDA NA MOLIMO?

TOTUNDI NA MOLIMO MOSANTO NA KONDIMA
Tokumaki Bakristo zambi na kondima Yesu Kristo lokola Mobikisi. Boye tokumi Bakristo na kotunda na Molimo Mosanto na kondima Nzambe mpe kotosa Liloba na Ye. Okoki kolingisa Molimo Mosanto kotunda mpe kokonza yo sikawa. Awa ezali njela misato na kolanda:

1. LOBA NA NZAMBE OLINGI KOTUNDA NA MOLIMO MOSANTO “Beneditu azali na batu na nzala pua na kula alima, zambi bo azua kutumisa!” Matayo 5:6
2. BIMISA MASUMU NA YO EPAI NA NZAMBE. “Soko bisu abimisi kulamabe na bisu, Ye azi Motu solo, na alima, boyo Ye abungi kulamabe na bisu, asukuri bisu na kula abilika nyoso.”
1 Yoane 1:9

Ntina na kobimisa masumu ezli boye:
a. Ozali na motema moko elongo na Nzambe.
b.Opesi Nzambe meresi zambi Ye alimbisaki masumu na yo zambi na Yesu Kristo.
c. Otiki masumu na yo mpe etesi Nzambe. Oyo ezali kobongwana motema.

3. PESA YO MPENZA EPAI NA NZAMBE
“Apisi bakipandi na nzoto na bino pai na kulamabe te, zambi na kutikala biroko na tumba pua na kulamabe, kasi apisi bino pinza pai na Nzambe, pilamoko batu oyo asiralunguli na kukufa; na bakipandi na nzoto na bino pai na Nzambe zambi na kutikala biroko na tumba pua na kula alima.”
Baromo 6:13

Kozala na bomoi na kotunda na Molimo Mosanto, esengeli tolingisa Yesu Kristo kokonza ezaleli na biso, mpe misala nyoso na biso.

Esengeli tolingisa Yesu Kristo kokonza mbongo na biso, ntango na kofanda mpamba, mosala na biso, mpe makambo nyoso na biso katikati na mabota na biso mpe baninga na biso.

Osili kolanda makambo oyo misato?
Tokotanga makambo yango lisusu?

SIKAWA NDIMA NZAMBE KOTUNDISA YO NA MOLIMO MOSANTO NA YE

Nzambe akotundisa (akokonza) yo mpe akopesa yo nguya na
Molimo Mosanto soko ondimi Ye kosala yango.
Makambo mibale na kobanzisa ezali yango:

1. TOSA MOBEKO NA YE NA KOTUNDA
“Nasima arangi na masanga te, zambi oyo abimisa keleli, kasi atumi na Molimo.” Baefeso 5:18

2. NDIMA ELAKA NA YE KOTUNDISA YO
“Nasima bisu andimi oyo solo libosu na Ye; soko bisu akongi kula Ye alingi, Ye aoki bisu; nasima soko bisu aibi Ye aoki bisu na kula nyoso bisu akongi, bisu aibi bisu azui kula bisu asirakongi na Ye.”
1 Yoane 5:14,15
Solo…

OKOKI KOTUNDA NA MOLIMO MOSANTO NA KONDIMA, SIKAWA!

Njela moko na komonisa kondima na yo ezali kobondela

SOKO OLINGI KOBONDELA BOYE:

“Mokonzi Yesu, nazali na bosenga mpo na yo kokonza bomoi na ngai. Nazalaki kokonza bomoi na ngai mpenza. Sikawa natiki masumu oyo na ngai, mpe napesi ngai mpenza epai na yo, kotosa yo. Meresi zambi na kolimbisa ngai. Sikawa natosi motindo na yo, mpe nandimi yo kotundisa ngai na Molimo Mosanto. Meresi mpo na kotundisa ngai lokola olakaki.”

Okolinga kosenga Nzambe kotundisa, kokonza, mpe kopesa yo nguya kati na bomoi na yo?

Okolinga kobondela libondeli oyo sikawa?


NA KONDIMA, OKOKI KOYEBA OZALI KOTUNDA NA MOLIMO MOSANTO.

Osili komibongisa lokola buku oyo elobi nse na “TOTUNDI NA MOLIMO MOSANTO ZAMBI NA KONDIMA”

“SIKAWA NDIMA NZAMBE KOTUNDISA YO NA MOLIMO MOSANTO NA YE!”

Ondimaki Nzambe kokokisa elaka na Ye na kotundisa yo na Molimo Mosanto? Elilingi oyo na motoka emonisi ndenge nini totundi na Molimo Mosanto na njela na kondima.



1. Nzambe apesaki yo mobeko kotunda na Molimo Mosanto, mpe alaki koyanola mabondeli na yo soko obondeli    lokola na mokano na Nzambe.
2. Ozui nguya na Nzambe ntango ondimi Ye kokokisa elaka na Ye.
3. Soko ondimi Nzambe kotundisa yo, akopesa yo nguya kozala na bomoi mosanto mpe kobota mbuma kati na litatoli na yo mpo na Kristo.
4. Bosana te kondima Nzambe kotundisa yo. Ndima te koyeba na motema na yo to makanisi na yo mpenza. Nzambe asengeli kokokisa elaka na Ye kotundisa yo. Akoloba na yo lokuta te.
5. Zambi Nzambe azali malamu nyoso, okoki kopesa Ye meresi mpo na kotundisa yo, bobele soko oyoki yo mpenza godi te kati na motema.
Boye…


OKOKI KOTUNDAKA NA MOLIMO MOSANTO

Soko osali lisumu na kokonza bomoi na yo lisusu, ekoki kosala makambo mibale.

1. Ekoki kobimisa lisumu na yo epai na Nzambe. Akolimbisa lisumu na yo mpe akopetola yo (1 Yoane 1:9). Tika lisumu na kozala Mokristo na kokanisa yo moko.

2. Ekoki Molimo Mosanto atundisa yo lisusu (kokonza yo mpe kopesa yo nguya). Senga Yesu Kristo kokonza bomoi na yo. Tosa MOBEKO na Nzambe kotunda na Molimo Mosanto (Baefeso 5:18). Ndima ELAKA na Nzambe kotundisa yo (1 Yoane 5:14,15).

Mbala nyoso, ntango Molimo Mosanto amonisa yo lisumu kati na bomoi na yo, sala makambo yango mibale. Bongo okozala na esengo mpe mbuma kati na bomoi na yo.

NDIMA NZAMBE KOTUNDISA YO MIKOLO NYOSO NA NDENGE OYO BONGO YESU KRISTO AKOZALA NA KITI NA MOKONZI NA BOMOI NA YO MOKOLO NYOSO!
Okoki koyeba sola, ete…


NTANGO MOLIMO MOSANTO AZALI KOKAMBA MPE KOKONZA BOMOI NA YO:

1. Bomoi na yo ekomonisa mbuma na Molimo Mosanto lelo, koleka na lobi. (Bagalatia 5:22,23).
2. Mabondeli na yo ekosala mosala (Yakobo 5:16).
3. Koyeba na Biblia ekobakisama (2 Timoteo 3:16).
4. Okozala na nguya na Nzambe mpo na kotatola (Misala 1:8).
5. Okozala na nguya na Nzambe koleka komekama mpe masumu (1 Bakorinto 10:13).
6. Okondima Nzambe mpe bilaka na Ye. (2 Petero 1:3-11).
7. Okozalaka na bomoi na kotunda na Molimo Mosanto na njela na kondima (Baebere 11:6; 1 Yoane 5:1-5).
8. Okolonga milimo mabe (1 Yoane 4:1-4).

Ezali likambo monene ete…

KOYANGANA NA LINGOMBA NA YESU KRISTO

Soko koni ezali esikamoko, ekopela makasi. Kasi soko otii moko pembeni, likolo na mabele mpio, moto na koni yango ekokufa noki. Ekozala boye lokola epai na yo, soko omeki kozala Mokristo, yo moko elongo na Bakristo mosusu te.

Ekoki oyangana esikamoko na batu mosusu oyo bazuaki Yesu Kristo lokola Mokonzi mpe Mobikisi na bango.

Ekoki oyangana na lingomba esika batu bandimi Biblia, mpe esika batosi Yesu Kristo. (Baebere 10:25).

Soko makambo oyo na solo esalisaki yo…

TANGA BUKU OYO MPE PESA YANGO EPAI NA MOTU MOSUS
motu na kopesa yo buku yango esali:

C.E.C.A -- LIFE
B.P. 143 BUNIA
REPUBLIQUE DU ZAIRE

ADDITIONAL ASSISTANCE

Whether you've prayed to be Filled with the Holy Spirit or still have some questions, please click here and tell us about it. We would love to hear from you and help you grow in your faith!

 

© 1995-2001 Campus Crusade for Christ International
Questions and Comments are always welcome!
http://www.jesuswho.org/spirit/bangala/default.htm
webmaster@jesuswho.org last updated: 18-08-2006